12 Biyano na lokuta na maye matali bilanga ya masini ya nzete ya mbila

LINGALA.

Ebandeli

Biyano zomi na mibale na lokuta ya maye matali lolenge ya bosali bilanga ya nzete ya mbila na masini. Uta mbula zomi na mibale oyo ewuti koleka, bilanga ya mbila, na regime ya mosali na mosali, ezwaki koto ya ba hectari ya mabele ya mboka Indonesia mpe Malesia, ezalaki kobebisa ba zamba, na kolongolaka bayi mboka na kofanda na bisika na bango. Lolenge ya bilanga ya mbila na masini wana, ebandaki kozwa bisika monene na mabele ya mboka, to pe etando ya bayi mboka ya Afrika na ya Amerika Latini. Minioko ekotelaki bayi lisanga, lolenge esalemaka na bayi mboka ya Indonesia na Malesia.

Bazamba ya bilanga ya mbila ezali kokoba se kokoba mpe koya monene, ata ko koyinana mpe bozangi boyokani ezalaki kati na masanga maye baboyaki mpe babundaki mpona kobatela mibeko mia bango. Ba kompani eye ya lolenge ya kosala bilanga ya mbila na masini, ewangani ete ba bilanga ya mbila ezali kobimisa ba makambo mingi na kati ya mboka, mpo ete bazwa bokasi ya kosalaka ba makambo ya minene, maye bakanaki kokokisa na Asia, na Afrika mpe na Amerika Latini, bazali kolanda makambo ya lokuta. Tina ya buku eye, ezali nde kolobela makambo ma lokuta mana.

12 Biyano na lokuta na maye matali bilanga ya masini ya nzete ya mbila (pdf)